Commentaires sur KONGO DIETO 2111: LA MAUVAISE FOI DE KALELE !
- Ingeta! Tulungisa nsatu za Simbi kia Kasai kidivo ka yangalala.
- yenge, yenge ,yenge kieno mu tatau kia MASE. tuasakidila tatu maweja bana beto.
Ba ndeko babolingo balingami bana ya ntima nsi, natangi kongo dieto oyo pena kanisi
ba ninga nangai mingi ya baluba oyo tobotama nabango elongo oyo tokola na bango elongo tekino lelo oyo nazali na baninga na ngai mingi ya baluba toyokanaka malumu mingi penza penza. kongo dieto oyo oyo 2111 ezali kososolisa biso makambo ebele.
Soki ngai nazalaki MULUBA nalingaki ngai moko nazua randez vous na NE MUANDA NSEMI kokende kosolola naye asosolisa ngai yemoko penza makambo oyo alobi na kongo dieto oyo, nayango nazali kosenga na bandeko nangai baluba bameka nanu kosangana pe boluka kokutana na nlongi akongo na ntina ete asosolisa bino bayeba ete NGONGA ekomi boniboni.
Ndenge ngai nasosoli namoni ete ne muanda nsemi na KATI NA MOLIMO AYEBI MBOKA NA BINO MABELE YA BA KOKO NABINO KOLEKA BINO MOKO BALUBA surtous baluba oyo ya lelo oyo babungisa ba koko na bango.
Tata oyo ne muanda ngai namoni azali na ba INFORMATION mingi ya kopesa baluba
kasi bandeko balingi komikitisa te ponanini?
INFORMATION ezali eloko ya motuya ba ndeko nangai bomikitisa bopusana penepene naye botuna ye,bosenga ye,botungisa ye,asosolisa bino,amonisa bino,atalisa bino,afongola bino miso,atangisa bino,alakisa bino MABOMBAMI oyo ya bino baluba.
Bandeko nangai baluba ata olingaka nayo KOFI OLMIDE te, kasi koboya banzembo naye nionso te pamba te ezali na MATEYA mosusu oyo eza kuna nakati ya nzembo ya kofi olmide ekoki pe SUNGA yo mpo oyeba ndenge okoki kotambosa bomoyinayo.
Nouveau commentaire